Huta hôpital ya panzi, prix Nobel ya paix 2018, a sosolisi ete marche yako senga justice mpona batu nyoso ba sala ba crime na mboka, mpe ko futa batu oyo ba zuama na likama na bitumba ana, eko salema.
Na maloba maye, a lakisi ete ngonga e belemi, mpona batu nyoso oyo ba sala ba congolais mabe ba leka na ko futa. A sengi lisusu na communauté internationale ba leka na ko tala likambu ya mboka Congo.
To yeba ete, na mikolo eleki, Dr Denis Mukwege a zuaki ba menace ebele mpo a sengaki na communauté internationale ba tiya Tribunal moko e ko sambisa makambu nyoso e lekama na Congo.