Likambo ya ko kamwa e leki na tongo ya mokolo ya misato oyo (mercredi) na Centre de Santé Kondima, oyo e zwami na nzela ya ko kende Sotexki.

Bato ba lamuki na sango ya mawa ya bobwaki mwana mukie (nourrisson de quelques jours) liboso ya lopitalo ena.
Mwana yango a zali na bomoyi, kasi ba boti wa ye ba yebani te. Ba kambi ya lopitalo ba zali ko sala makasi mpo na ko mema mwana ena apayi ya bourgmestre ya commune ya Mangobo.
Gracia Motimba