Ye meyi Willy Bakonga, ministre ya likambo li tali kelasi (enseignement primaire, secondaire et technique), a lobaki na nzela ya bilili mokolo ya sambo oyo (dimanche) ete ba finalistes ya ba engumba misusu bako yeba ba résultats ya bango na ba ngonga e zali ko ya.

Na mboka Kinshasa ba panzaki yango kaka dimanche na nzela ya bilili (Éduc TV) na commune ya Gombe. Ko landa na maloba ya Willy Bakonga, ko longa na engumba Kinshasa e komisi pourcentage tuku sambo na mwambe (78%).
To yeba ete awa na engumba Kidangani ba résultats oyo e zelami makasi na ba finalistes mpe bobangi e sili ko mata makasi uta ba bimisi yango na Kinshasa.