Loyembo « maman Yemo » ya moyembi Karmapa e pekisami na maye ma ko talaka makambo ya ba nzembo (agence de censure) na ekolo na biso Congo.

Eve Bazaiba, oyo a zali secrétaire général ya MLC, a sosolisi na ba ndeko panzi sango ya 7sur7 lundi 28 septembre oyo ete, bopekisi ya loyembo wana e zali buzoba, mpo makambo moyembi Karmapa a lobi na kati, e zali bongo bosolo ya lopitalo ena, oyo bakonzi ya mboka ko banda na Ministre ya santé ba koki ko loba yango te, a lakisi lisusu ete loyembo wana e zali ko bikisa lopitalo wana.
Moyembi Karmapa a sengami ko futa amande ya koto ibale ya dollars américains (2.000$) mpo na a boyaki ko kende na ebengiseli ya bakonzi ba ko talaka makambo ya ba nzembo.