Mokolo ya mibale (mardi) 29 septembre 2020 oyo, ministre wa yambo a yambaki na primature lingomba ya bakonzi ya mapinga ya Egypito oyo ba bengi na lifalansa « autorités de génie militaire des Forces Armées Égyptiennes »
Délégation yango e memamaki na mokonzi wa mapinga général Mahmoud Shain, na ambassadeur ya Égypito na ekolo Congo Hamdy Shaaban mpe bakonzi misisu, solo motuya ya masolo ma bango e zalaki nse na tina ya oyo e tali « coopération bilatérale » kati ya mboka mibale oyo.
Ko landa na maloba ya général Mahmoud Shain, oyo a zangaki ko loba te na sima ya bokutani bwa bango, projet ya motuya oyo e bimisaki bango na mboka Egypito e zali makambo ya lolenge nini bonani (navigation) na nzela ya ebale ya Congo ko bima Boma ti Kinshasa e koki ko longwa na makanisi mpe e koma ya solo.
Mpo na ambassadeur ya Égypito, a sepeli makasi lolenge nini ministre wa yambo Ilunga Ilunkamba a mi pesi na coopération Sud-Sud mpe à limboli ete mboka na ye na RDC e zali ko sala makasi mpo na likanisi ya sika oyo e tali boyokani mpe ko komisa bosangani (lien) oyo e tali investissement makasi lisusu ko leka.