Steve Kivwata, mopanzi sango (porte parôle) ya lingomba Lamuka a sosolisi ko leka sango ya bango oyo e panzanaki na ba ndeko ya 7sur7.cd na mokolo ya mardi 29 septembre 2020 oyo ete, Martin Fayulu a ko koma bongo mokambi ya lingomba ena (Lamuka).
Mululu ena eko lekana jeudi 1er octobre 2020 oyo na ngonga 12h30 na esika ya parti politiki Nouvel Elan ya Adolphe Muzito. A sengi bongo na Congolais nyoso, mingi mingi ya mboka Kinshasa ba mi lengela mpo na ko yamba mokambi mwa bango ya sika Martin Fayulu Madidi.
To yeba ete e zali bongo mbala ya liboso ya Fayulu ko zua ngwende wana banda lingomba ya lamuka e salema, mpe ako kamba yango mpo na sanza misatu (3mois).