Mbula e zalaka na motuya mingi mpo na ko sunga baloni, mpe ko silisa mulunge na mboka, kasi sima ya mbula mbutu mbutu mpe buluyeke e zalaka na Kisangani. Ndakisa mbula ya vendredi 9 octobre oyo na tongo, mayi e tondi na nzela lokola ebandeli ya masolo ya Noé.
Na côté ya Bercail ko sala lokola ko kende na avenue Mosengo, mayi e tondi na nzela mpe e komi nde esika mpo na ba tambusi tukutuku (motards) ko sukola tukutuku na bango.
Mituna mpe biyano, nini nde e zali ko sala ete nzela wana e tonda mayi na mbula nyoso ?
To kanisi ete ko zanga nzela ya mayi (caniveaux) ya malamu nde e zali ko sala ete mayi e tonda na nzela, e zali ko kamwisa, pamba te nzela oyo e wuti ko tiama goudron, kasi caniveaux e zali te.
Soki bakonzi bako bongisa ba caniveaux na nzela ena ekozala malamu.