Mpona boluki kimia mpe sécurité na engumba ya Goma, wapi pulusu (PNC) ya engumba oyo e monisi mokolo ya yambo (lundi) 12 octobre oyo « opération » moko oyo e zali na litomba ya malamu epayi ya population.
Solo opération yango e bengami na kombo ya « Sécurité pour tous et par tous », e zali mpo na ko mema bayi population mpe bakonzi ya engumba oyo ba mi kotisa na mosala monene ya boluki « Sécurité » na engumba Goma.
Ko landa na maloba ya commissariat urbain ya engumba oyo, moto nioso oyo a ko yeba kuluna (criminel) oyo a zali na munduki mpe a fundi ye, a ko zwa lifuti ya tukutuku (moto) ya sika neti litomba, mpe bayi pulusu ba ko batela mofundi (dénonciateur) yango. Likanisi ya opération oyo e wuti na gouverneur Carly Nzanzu Kasivita mpe na bayi PNC ya province ya Nord-Kivu.
Opération oyo e zali ya yambo te, mokolo mileki moponami (député national) oyo a ponamaki na engumba ya Goma, Patrick Munyomo, a monisaki nse na tina ya boluki kimia na engumba ya Goma, opération mosusu ya « ô pesi munduki ozwi mbongo 100 dollars »