Sylvano Kasongo a sosolisi lelo mukolo ya mibale (mardi) 13 octobre 2020 oyo ete marche ya parti politique ECIDE ya Martin Fayulu, eko salema te na engumba Kinshasa, ko landana na maloba ya Gentiny Ngobila, mokambi ya engumba oyo.

Na maloba naye, Sylvano Kasongo a lakisi ete pulusu (PNC) e pesameli mibeko ya ko telemela moto nyoso ako boya ko tosa mibeko oyo, mpe a sengi na population e kende na misala na bango, mpe oyo ako tia tembe, ako kutana na pulusu na nzela na ye.
To yeba ete marche oyo, Fayulu a bongisi yango mpo na ko kembisa bomoko na mboka na biso, mpe ko boya botieyi ya Minembwe neti « commune rural ».