Godelive Mosunga, bourgoumestre ya commune ya Kabonndo a salisaki salongo mokolo ya motoba (samedi) ya poso oyo eleki na kati ya wenze ya foyer social.
Na maloba ma ye, salongo wana e salemaki mpo na ko tia bopeto na kati ya zando, mingi mingi mpe ko batela population na bokono kilikili.
To yeba ete bateki ya wenze wana bâ sepelaki na likanisi oyo mama mokonzi ya commune a zuaki mpo na ko bongisa esika na bango yako teka.