Na sima ya sanza mibale ko leka, uta bokangami ya Christian Ngoy Kenga Kenga na lubumbashi na makambo mi tali liwa ya Floribert Chebeya na Fidèle Bazana na 2010, bayi ONG « La voix de sans voix » ba sengi na Justice a sambisa mokangami oyo.
ONG oyo e zali ko kamwa lolenge justice e vandisi Christian Kenga Kenga na boloko kasi a tikala ko sambisa ye te, mpe ba zali ko banga lisusu bokimi ya mokangami oyo to kufa naye na boloko ko leka na nzela ya poison, mpo bosololo na likambo oyo e yebanaka te.
VSV ba sengi na justice a leka na ko sambisa mokangami oyo na lombango mpo nzoto naye (santé) e zali lisusu malamu na boloko te. Ba sengi bosolo e yebana mokolo moko na liwa ya ba ndeko na biso oyo Floribert Chebeya na Fidèle Bazama.