Bilenge misusu ya mboka Kisangani ba lingi lisusu ko luka mosala te, misusu mpe ba kolisi mayele na bango na misala mabe. Moko na bango a kweyaki o maboko ya pulusu poso oyo e leki, na commandement ville.
Elenge oyo a zali na engulupa ya bato oyo ba bengaka basalali ya ba comptes ya m-pesa lokola service client mpo na ko senga bango code.
To yeba ete bakonzi ya pulusu ba zali ko koba na bâ enquêtes mpo na ko tia maboko na bâ ninga wa ye oyo ba kimaki, sima na yango nde ba ko lakisa bango epayi ya ba panzi sango.