E sali lelo mikolo misato uta ba sali mombongo ya engumba Kisangani ba zali ko fungola ba boutiques na ba magasins na bango te.
Tina ya grève ena e zali ko senga na bakonzi ba bongisa nzela ya RN4, oyo e zali na motuya mingi mpo na ba opérateurs économiques, mpe lisusu ko longola taxe ya pont bascule na oyo ya TCVTM, mpo na ba transporteurs.
Ko landa na maloba ya Fataki Sadiki, mokambi ya association ya ba commerçants ya Congo, to yeba ete grève wana e ko kende ti mokolo bakonzi ba ko zwa eyano.
To yeba lisusu ete, ata bokutani ya lingomba na bango na gouverneur de Province mbala mbala, eyano moko e zwami nano te.