Bayekoli oyo ba lekaki na première session na kelasi ya sciences infirmières na engumba Kisangani ba kataki seleka mokolo ya poso na institut Lubemba na commune Kisangani.
Na maloba ma ye, mokambi provincial ya Ordre National des Infirmiers du Congo Jérôme Bonoui Boliaka, a sengi na minganga ba tosa seleka oyo bâ lapi, mpo ete mosala ya minganga e sengi engagement ya makasi ko leka. Na lisusu, munganga oyo a kati seleka té a koki ko sala mosala té.
To yeba ete minganga wana bâ uti na ISTM Kisangani, ITM camp Saio, na Institut Lubemba.