Na bulletin ya mokolo ya lomingo (Dimanche) 27 décembre oyo, comité multisectoriel de lutte contre le coronavirus, e monisi ete ba cas ya sika tuku sambo na mwambe ya sika e bakisami na mboka, kati ya ba cas yango tuku sambo na misato (73) e zwami na Kinshasa mpe mitano na sud-kivu. Ba échantillons kama ibale tuku sambo na libwa (279) e mekamaki.
Ata moto lioko te a kufi mpe ba beli ba biki te na mokolo ya lomingo oyo. Uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020 e leka, motango ya ba cas e komi koto zomi na motoba kama libwa zomi na sambo (16.917) [kati ya ba cas oyo koto zomi na motoba kama libwa zomi na motoba (16.916) e ndimami mpe cas moko ezali « probable »].
Mboka e kufisi bato kama mitano tuku sambo na libwa (579) [ba cas kama mitano tuku sambo na mwambe (578) e ndimami mpe cas moko (1) e zali probable], mpe ba beli koto zomi na misato kama libwa tuku mwambe na mibale (13.982) ba biki.