Zone ya mapinga ya isato ya FARDC e monisi na nzela ya liyebisi yoko ete a zali ko luka pepo yoko ya hélicoptère oyo e bimaki Bunia na province ya Ituri mokolo ya mibale (mardi) 29 décembre 2020, na yango esika pepo oyo ekeyi e yebani te.
Solo pepo oyo e zali moko ya ba pepo mibale oyo e bimaki na eteni ya mboka na biso oyo mpe e memaki ba konzi ya mapinga ya FARDC ya 3ème zone ya défense oyo ba wutaki na mission moko na Nord-Kivu mpe na Ituri, mpe ba bandaki ko kende na Kisangani.
Ko landa na maloba ya source yoko oyo a sololaki na ba ndeko ya « ACTUALITE.CD », hélicoptère oyo e bungi e pumbwaki malamu penza na aéroport ya Bunia mpe e bungi na bato nioso oyo ba zali ô kati na yango. Ko koma Niania nde bayi FARDC ba sosoli ete pepo wana e bungi mpe ba zali ko luka yango, na likanisi ya commandant ya 3ème zone ya défense, Général Alengbia Nzambe opération ya bo luki luki pepo oyo.