Mpo na mokolo ya mineyi (jeudi 14 janvier 2021) oyo, bulletin ya comité multisectoriel de lutte contre le coronavirus e monisi ete ba cas ya sika tuku sambo na sambo e bakisami na ekolo na biso, ko landa na ba échantillons kama ineyi zomi na misato (413) oyo e mekamaki. Na boye, ba cas yango : tuku mitano na mineyi (54) e zwamaki na Kinshasa, zomi na mineyi (14) na Haut-Katanga, mwambe na (8) na Sud-Kivu et mpe moko (1) na Kasaï Central.
Solo ba beli mibale (2) ba kufi na engumba mokonzi Kinshasa mpe ba beli mineyi ba biki kaka na engumba mokonzi Kinshasa.
Uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020 e leka, mboka na biso e komi na motango ya ba cas koto tuku ibale kama itano tuku mitano na motoba (20.556), na boye ba cas koto tuku ibale kama itano tuku mitano na mitano (20.555) e ndimami mpe cas moko (1) e zali « probable ». To yeba ete mboka na biso e kufisi bato kama motoba tuku mibale na mwambe (628) [ba cas kama motoba tuku mibale na sambo (627) e ndimami ô kati ya ba kufi mpe cas moko (1) e zali « probable »] mpe mboka e bikisi ba beli koto zomi na mineyi kama sambo tuku sambo na mineyi (14.774).